"GLOBAL WOMEN’S STRIKE" EZALI LISANGA LYA BASI BA MOKILI MOBIMBA OYO EZALI KOTUNA NTANGO NYOSO ETE BASI BAFUTAMA MALAMU KOLEKA, ZAMBI EZALI NDE BASI BATO BAZALI KOBATELA BOMOI NA KATI YA MABOTA.

GLOBAL WOMEN’S STRIKE ETUNI ETE "MBONGO ETIYAMA MPO NA KOBATELA BOMOI, MPO NA KOBOMA TE"

Uta bitumba ya mboka Afghanistan mpe Irak, boyini bwa bitumba bokoli kokola mpenza o kati ya bingumba bya mokili mobimba. Bato bazali kokoba kolakisa ete baboyi bitumba wana ebundama; ata na kati ya America mpenza, epai wapi poso na poso bato ya engumba Los Angeles baboyaki kolala butu kama yoko na ntuku minei (140) mpo na kolakisa ete baboyi bitumba. Tango basoda ya America mpe ya Grande Bretagne bakotaki na Irak mpe bakweisi ba-bombi ebele oyo ebomaki bato ebele na Irak, bato na America bazalaki tango nyoso kopesama nsango ya lokuta likolo ya bitumba wana.


Philadelphia, USA

Soki Internet ezalaka tè, mbele toyebaki tè, ndenge bato ba bingumba bya mokili mobimba batelemaki mpo na kolakisa ete baboyi bitumba wana ebundama. Zambi Internet ezali kosalisa biso tozwa nsango ya bosolo iuti na bato ya nse mpenza, nsango oyo ebongwami nano tè na politiki ya bakonzi.

Global Strike too mpe Lisanga Lya Basi Ba Mokili Mobimba oyo ezali kotuna ntngo nyoso ete basi bafutama malamu, zambi ezali nde basi bato bazali kobatela bomoi na kati ya mabota; yango mpe ezongaki nsima tè, etelemaki mpo na kolakisa ete basi baboyi bitumba wana ebundama.

Balengelaki misala ebele lokola ba-vigils, ba-manifestations too mpe kotambola elongo na bato ebele mpo na kolakisa boyini bwa bango mpo na bitumba.

Na Londres, biso na kati ya Global Women’s strike tozali kokoba kosala ba-pickets, kotelema mbala yoko na mposo moko liboso lya ndako epai wapi Mokonzi wa mboka too mpe Premier Ministre Tony Blair avandi, too mpe liboso lya Parlement, elongo na Tata moko oyo avandaka seko mikolo nyoso wan butu moi mpo na kolakisa boyini mpo na bitumba.

Tokendeke wana mpo na kolakisa ete to boyi bitumba mpe tolingi kobatela bomoi bwa bato, mpe koloba makasi na micro na biso na esika ya bato ebele oyo bazali na likoki ya koloba too mpe koyangana lokola boye tè. Tozali kobenga moto aya koloba na micro na biso tango totelemaka liboso lya Parlement, mingi mpenza, lisanga lya basi ba Irak, too mpe Iraqi Women’s League. Bazali koloba boye:

"Tozali kobanga ba mouvements fondamentalistes réligieux too mpe batomboki oyo bazali koyina ete basoda ya America mpe Angleterre bavandela mokili mwa bango mpe bazwa bomengo nyoso. America akoteli biso lokola mopunzi mpo aboma mpe ayiba bomengo oyo ezali na kati ya mabele na biso. Apesi bonsomi at moko tè na bato ba Irak. Tango bazali koloba ete balingi kotonga lisusu mboka na biso, ezali lokuta. Bazali koyiba bomengo na biso na polele mpenza."

Tango bapanzi nsango bazali koyebisa biso motuya ya basoda ya America too mpe ya Grande Bretagne oyo bazali kokufa too mpe kozoka na bitumba, biso tozali koyebisa na bato ndenge bango bazali koboma bato ba Irak baye bazali kokufa ebele, mingi mpenza ndenge basoda ya America bazali kokanga na makasi basi ya Irak, mpo na kolala na bango too mpe ko-violer bango.

Soki otali bipai binso, biso basi tozali kotia bokasi bwa biso, mbongo mpe nkita ya biso mpo na kobatela bomoi, kasi soko bitumba ebandi, ezali nde biso basi bato tozali konyokwama mingi koleka, biso na bana ba biso. Bazali too koboma (70%) too mpe kotinda biso kotika ba-ndako na bamboka na biso mpo na koluka embombameli bipai mosusu (80%). Bato bakoki kokamwa tè, soki basi bazali koyina bitumba koleka mibali. Mibali ebele bayebi yango, yango wana bazali koya ebele kosangana na biso basi tango to zali kotelema mpo na koloba ete to boyi bitumba.

Moto nyoso oyo azali kozoka too mpe kokufa na bitumba, azala mobali, azala mwasi, nyoso babotami na mwasi.

Se ndege moko lokola na Iraq, bazali mpe kobomba bosolo tango bazali koyebisa biso maye mazali koleka na mboka ya Palestine, ndenge ba-isrealis bazali konyokola ba-Arabes. America azali kosalisa ekolo ya Israel na ndenge nyoso (mbongo, mandoki…) mpo ete ekolo ya Israel ebatela nkita too mpe ba-intérêts ya America o kati ya Moyen-Orient.

Yango ezali kopesa bokasi na Israel mpo atondisa bibuneli na mpe mandoki ya kosilisa koboma bato ebele na mbala moko (too mpe armes de destruction massive), azwa mabele ya ba-Palestiniens, abuka ba-ndako ya bango, abwaka ba-bombi too mpe aboma ba -Palestiniens, basi na bana, na babange (ba-civiles) na masasi, aboya kolanda mitindo ya Organisation des Nations Unis (ONU), lingomba oyo ekoki kokotisa kimia mpe boboto o kati ya bikolo kasi eloko moko ezali kosalema tè.

Mikili mya Mpoto tango bazali koyebisa biso ba-nsango likolo lya Africa, bazali kobomba bosolo mpe koyebisa biso tè, ndenge mikili mya Mpoto bazali koteka mandoki kuna mpo ba-Africains babunda kati na nabgo na bango, bitumba biye bizali koboma bato ya Africa ebele mpe kotinda ete bato bakima ba-ndako na bango mpe bakenda kotelenganaka bipai mosusu.

Bikolo biye bizali seko koluka nkita na koteka mpe kosomba na ndenge nyoso mpe bipai binso (marché global) likolo lya mpasi ya bato mosusu, bazali kokanisa liboso lobiko na biso tè. Balingi biso to bika tè, tokufa kaka, tokende liboso tè, totikala seko na nsima. Kasi biso tozali koluka liboso lobiko na biso moko.

Na bayangeli ba ekolo ata nini, loposo ata nini, eyamba ata nini, baye bazali koluka ba-ntina ya kokende na bitumba, biso basi tokoloba seko na bango ete toboyi bitumba mpo bitumba ezali kobota mpasi mpe liwa lya bato ebele.

Tozali biso banso elongo na basi ya Palestine, ya République Démocratique du Congo, ya Chechnie, ya Kashmir, ya Colombie, mpe ya bikolo nyoso esika bitumba ezali kongala, basi ba mboka Iraq mpe Afghanistan baoyo bazali komeka kobatela mabota mpe bituka mpo bipanzana tè, ata bazangi mai, courant, ata bavandeli ba-bobi oyo epasuki nao tè mpe ekoki kobebisa bonkono bwa nzoto ya bango mpo etondi zambi lya bopalangani too mpe radiation ya uranium.

Mabota ma basoda ya America mpe ya Grande Bretagne bazali kotuna ete bana na bango bazonga mboka sik’oyo, nzoto mobimba mpe na makila na maboko na bango tè. Basi mpe makango nkama saambo na ntuku mitano (750) ya basoda ya America, bakendaki kosala mobulu na camp ya basoda ya Fort Stewart, na Georgie, na America, tango bayokaki nsango ete ba-mibali na bango bakozonga mboka noki tè.

Biso banso toyebi ete, soki soda azongi na etumba mpo azoki too moto ezali lisusu kosala malamu tè, mpo na manso autaki komona kuna too maye asalaki na bato mosusu, ezali mwasi na ye too mama na ye moto akomema mokumba nyoso wana. Ezali commandant na ye, too ministre, too politicien ata nani.

Bato ba mokili mobimba bayebaki ete bakosaki biso ete Irak azalaki na bibuneli na mpe mandoki ya kosilisa koboma bato ebele na mbala moko ( oyo babengi na lompoto, armes de destruction massive), mpe ete esengelaki bakota kuna mpo na kopesa bonsomi too mpe ko-libérer bato ya Irak. Yango wana batelemaki mpe basalaki nyoso mpo ete America na Grande Bretagne bakota na Irak tè. Ata ko boye, basoda ya America na Grande Bretagne batindamaki mpo na kokende koboma bana ya bato mosusu, babotami na bamama lokola bango moko, mpe kotia bomoi na bango moko na likama, nyoso wana o nkombo ya Bush na Blair na bana misala na bango, ba espagnols mpe ba-britanniques, zambi Bush na Blair bazali na mposa makasi ya koyangela mokili mobimba.

Awa Bush na Blair bazali lisusu kotinda ba-soda mosusu ebele na bitumba mpe kobakisa mbongo mpo na bitumba mosusu, basi an mibali bipai binso bazali kotuna ete basoda bazonga mboka sik’oyo mpenza.

Bayangeli ba America na Grande Bretagne bazali mpenza na mposa ya kotonga mboka Irak tè. Balingi se kozwa yango mpo babenda mpe bayiba bomengo nyoso oyo ezali na kati ya mabele na yango (pétrole), mpe koboma bakolo mboka, yango wana bazali kobwakela bango ba-bombi oyo ekoki kobota bokono bwa cancer.

Basi ya Irak bayebi ete mpo na kotonga ekolo ya bango, makambo nini too mpe misala nini esalema liboso. Ezali nde bango bato bazali kosala nyoso mpo na kobatela bomoi, kosangisa mabota mpe bituka.

MBONGO BAZALI KOBEBISA NA BITUMBA EKOKAKI KOLEISA BATO

  • Mbongo ezali ebele mpo na bitumba mpe mpo na kosomba mitu ya bato, elingi koloba, soki moto azali koyina bitumba mpe koloba polele mpo bato mosusu balanda ye na nzela wana mpe kobimisa sekele, bakoya na mbongo, bapesi ye mpo aloba lisusus tè.
  • $900 milliards ebombami mpo na bitumba
  • Bitumba ya Irak etunaki $66,6 milliards, kasi 1,5 millions ya bana bazali kokufa na nzala mobu na mobu.
  • Bitumba ya Iraq ezali se likolo ya petrole. Mbongo ya ba-taxes oyo tozali kofuta, bazali kosalela yango mpo na bitumba epai wapi bana na biso bazali kokufa.
  • $10 milliards (£6,6 milliards) mobu na mobu ekoki kopesa mai ya komela ya malamu na 1, 75 milliards ya bato sima ya mibu zomi pamba.
  • $19 milliards (£12,6 milliards) mobu na mobu ekoki kosilisa nzala mpe bozangi ya biloko ya kolia na mokili mobimba sima ya mibu zomi pamba.
  • $17 milliards (£11,3 milliards) mobu na mobu, ekoki kopesa courant oyo euti na ba-sources ya malamu na bato nyoso na mokili mobimba mpe kotinda ete totika kosalela ba sources ya courant oyo ezali ko-empoisoner mopepe too mpe pema (nucléaire, charbon, petrole, Gaz).

Home